LILOBA YA SOOLO #2 (LYS -#2) : FOCUS NA BISO : 1) KOSUKISA OCCUPATION 2) KO LONGOLA BA RWANDAIS IDENTITE YA BA CONGOLAIS BAYIBA KOBANDA NA “JOSEPH KABILA”

kagame-kabila-museveni-together

Ba rwandais tutsi misatu oyo nde bazali responsable mpo na occupation ya Congo, mpe mpo na holocauste ya plus de 12 millions ya ba innocents congolais…

 

> TOTIKA KOLANDA BA CONSEQUENCES (SYMPTOMES) YA OCCUPATION

> TOTIKA KOLANDA UBWENGE YA BA RWANDAIS YA KOLALISA BISO MPONGI

> TOTIKA KOLANDA POLITIQUE NA R.D.C. MPO YANGO NDE EUMISI OCCUPATION

[Bo soolo (VERITE) mpe PRINCIPE na biso yango oyo mpo Congo ezala LIBERER mpe etongama mpo na bolamu ya congolais nionso : Mwana ya Congo-Zaire oyo alingi tata na ye, mama na ye, mwana na ye, famille na ye, tribu na ye, village na ye, province na ye, ndinga na ye, mokonzi na ye, lingomba na ye, mbongo, mpe ki mokonzi KOLEKA MAMA CONGO-ZAIRE azali ko MERITER Mama Congo-Zaire te, mpe TOKOKI KOLANDA YE TE, MPE TOKOKI KOSANGANA NA YE TE.]

Bandeko ba congolais,

Tobosana te ete kobanda ba rwandais bakotaka na Congo na 1996, lelo oyo tokomi 22 ans… Koleka 12 millions ya ba congolais bakufi na maboko ya ba RWANDAIS, mpe mokolo nionso ezali koleka ba rwandais bazali koboma congolais PARTOUT NA CONGO MOBIMBA.

BOSUKISI OCCUPATION MPE LIBERATION YA MBOKA EKOUTA NA BISO BA CONGOLAIS TOZALI NA DIASPORA – Bandeko, biso ba congolais to ko re-inventer pneu te, ndenge balobaka na Lopoto, “nous ne re-inventerons pas la roue”, elingi koloba to ko changer te ndenge ba liberaka un pays ezali SOUS OCCUPATION. Ndakisa ezali lokola la France tango ezalaka occupe na ba Nazis, liberation eutaka libanda, mpe eutaka na ba accords te, na elections te, kasi na etumba… SOKI 22 ans ya occupation eteyi biso eloko te, elingi koloba tozali kokanisa malamu te. Tobosana te, Tunisie, Egypte, Burkina Faso, Iran na Ayatola, ba mboka wana ezalaka sous OCCUPATION ya bapaya TE. Moko te akosa congolais ete situation na biso ekokani na ya mikili oyo totangi awa. Yango wana example tokoki kotala ezali France na tango ya ba Nazis…

Na yango :

> TOTIKA KOLANDA BA CONSEQUENCES (SYMPTOMES) YA OCCUPATION

Makambo NIONSO ezali koleka na Congo lokola koboma, kokufa, maladi, ba nzala, biloko talo, bokufi ya education, kozanga misala, kozanga kolanda mibeko ya mboka to mpe injustice na ba tribunaux, bobotoli biloko ya bato, moyibi, ba makambo ya mabe mpe ya mpasi ya ndenge na ndenge, nionso wana, BANDEKO, ezali bobele ba CONSEQUENCES TO MPE BA SYMPTOMES YA OCCUPATION.

Esengeli totiya focus na biso na KOSUKISA OCCUPATION mpo yango nde ezali SOURCE mpe CAUSE ya mabe mpe makambo nionso oyo ezali koleka na mboka, mpe yango nde ebomi 12 millions ya biso ba congolais na maboko ya ba rwandais.

Ndakisa: ndeko moko autaka Canada, akei Kinshasa atongisi ecole ya etage, mpe atie ba ordinateurs mpe azwi bateyi mpe kelasi ya ofele mpo na bana ya Congo. Kasi lokola ba rwandais balingi koboma education mpo congolais akoma zoba mpe akoma mowumbu ya ba rwandais ya libela, mokolo mosusu ba soldats rwandais bakei na butu, babeti masasi na building mobimba, ba vitres, ba portes nionso epasuki mpe bakoti na kati, babeti masasi na ba ordinateurs nionso mpe ba saccager ecole mobimba… Na tongo, ndeko Congolais atiyaki mbongo na ye mpo asalisa mboka na ye, atelemi libanda azali koyebisa journaliste ete ayaki na mboka mpo asalisa peuple, bongo sikoyo asala nini???

Oyo nde consequence lokola symptome ya OCCUPATION. Ndeko oyo, MPE CONGOLAIS NIONSO ALINGI MBOKA NA YE, esengeli liboso tosangana na DIASPORA bisika tozali TOSUKISA OCCUPATION ya mboka na biso… APRES, soki tobengani ba rwandais, mboka EZONGI NA MABOKO NA BISO MOKO BA CONGOLAIS, wana nde tokoki kosalela mayele na biso mpo na kosala ba oeuvres ya kotombola mpe kotonga mboka. Mpo na lelo, ba rwandais bakotika JAMAIS Congolais asala oeuvre oyo ekoki kosalisa ba congolais ou bien ekoki kobongisa mboka Congo. Oyo congolais a comprendre te, oeuvre na yo bakoboma yango mpe yo moko suka suka bakoboma yo, na poison to na masasi to mpe na “accident”…

> TOTIKA KOLANDA UBWENGE (LOKUTA) YA BA RWANDAIS YA KOLALISA BISO MPONGI

Bandeko ba Congolais, ba rwandais na Congo mpe mokili mobimba bazali kosalela lokuta oyo ezali culture na bango babengi Ubwenge, mpe ba congolais, monde mobimba kobanda ba politiciens mpe ba leaders nionso na Congo oyo balobaka VERITE TE que Congo ezali SOUS OCCUPATION RWANDAISE mpe “Joseph Kabila” azali rwandais, bakoti bobele na Ubwenge mpe bazali kosalisa ba rwandais bavandisa occupation ya Congo.

Bandeko, mokili mobimba, ata bonkoko na biso, basalelaka liteya oyo elobi que “LOKUTA MABE”; Ata ba religions nionso eboya LOKUTA. kasi ba rwandais bazali SEUL PEUPLE na monde mobimba oyo culture na bango eteyaka bango ete « LA VERITE TUE » (Ukuli kurazirwa), elingi koloba « VERITE EBOMAKA », Lokuta nde malamu. Congolais oyo alingi koyeba, esengeli a ETUDIER document totie awa ya Prince Tutsi moko na kombo ya Antoine Nyetera, na document oyo ye a expliquer culture na bango ya UBWENGE. Mpe lisusu, alobeli personalite satanique ya Paul Kagame ndenge nini abomaki na ba Tutsis mpe na ba Hutus na Rwanda mpo kaka ye akoma mokonzi. Bo clicker na titre oyo : Education au Mensonge et de la Calomnie. Botanga yango kaka te, kasi bo ETUDIER yango malamu mpo boyeba rwandais mpe CULTURE na bango.

Ndakisa: Ba congolais ya mokili mobimba baloba, ba exposa, mpe ba videos ebima ezali kolakisa ete Vital Khamere azali rwandais. Ye moko mpe aboya te lokola tango ba congolais ba confrontaka ye na Wanshington DC; mpe Valentin Mubake oyo bato ya Kagame balakisaka ye Khamere na noko na ye na Kigali na Rwanda bazali kosolola na Kinyarwanda mpe Khamere awangana te. Kasi mokolo nini bokoyoka ete Khamere atika komibimisa congolais ? Nyetera a expliquer que ba rwandais ata ko okangi ye na lokuta, AKOKI JAMAIS KONDIMA, kasi akoluka a fonder LOKUTA mosusu mpo e couvrir oyo yo okangi ye na yango. Nalobaki eloko oyo tango tosalaka emission oyo na Kuswanika. Bongo soki biso ba congolais tozali kokoba kobenga ba rwandais ba congolais au lieu totelemela bango na VERITE ata tango bazali na ba partis politiques na Congo, FOTI YA NANI ? BOZOBA YA NANI ? SONI YA NANI ? TOLINGI NANI AYA KOBETA MBONDA MPO ABELELA NA MOKILI MOBIMBA QUE KHAMERE, TO KANAMBE, TO KATUMBI, TO BATO OYO NIONSO BAZALI BAPAYA ?

> TOTIKA KOLANDA POLITIQUE NA R.D.C. MPO YANGO NDE EUMISI OCCUPATION

Kobanda ba rwandais ba occuper mboka na biso, ezali na parti politique moko te to mpe lingomba moko te na Congo ezali kobundela mboka na bo soolo mpo na kosukisa occupation!

Ba politiciens NIONSO bazali na Congo bazali kosalela ba occupants rwandais directement lokola ba Mende, to indirectement lokola ba “opposants” nionso bazali na Congo mpe mangomba nionso ezali na Congo, ezala ya religion, ezala ya ba “citoyens”, ezala ya politique.

Na 22 ans oyo ya occupation, soki naino to comprendre eloko oyo te, alors ezali mawa na biso mpo ba rwandais balakisi biso mbala na mbala que soki politicien akomi MENACE mpo na bango, ezali kaka choix misatu, ou bien BABOMI YE, ou bien batie ye na boloko mpo na koniokola ye tee kuna akokufa, ou bien akimi libanda mpo a survivre… SANS EXCEPTION !

Politicien ou mokonzi ya lingomba nionso oyo akotaka mpe abimaka na Congo-Zaire sans que ba occupants rwandais basala ye mabe, ezali mpo azali UTILE mpo na bango, mpo asalelaka bango na kokosa monde mobimba que democratie ezali na Congo, et que mboka ezali kokambama na ba congolais. Nionso oyo ezali kosalisa ba rwandais mpo BA WUMELA, MPO NA KO FAIRE PERDURER OCCUPATION RWANDAISE YA MBOKA NA BISO…

Tango mboka ya France ezalaka OCCUPE, De Gaulle ye na resistance francaise basalaka mangomba libanda te ya “transition” sans Adolf Hitler… Bakendeki etumba mpe balukaki ba ALLIÉS basalisa bango na etumba mpo babengana liboso ba occupants nazis. Kobengana occupants ekozala pwelele… KOKOSA BATO TE QUE bokoki koyebisa te ndenge nini bokobengana bapaya. Lokuta nde yango wana ya kolalisa congolais pongi. Soki bozangi plan ya KOKUNDOLA MISISA BA OCCUPANTS BATIE na mboka na 22 ans oyo, botika kokosa lokuta ya “transition” oyo eyaka te, mpe ko kosaka ba congolais bazela… Bankoko baloba: ZELA ZELA MOKUMBUSU AZANGA MOKILA ! Congolais YEBELA mpe LAMUKA !

ACTION TOSALA :

Mpo na kosukisa occupation, TOBANDA naino ko confronter ba rwandais na DIASPORA, tolakisa bapaya na mikili tozali que mboka na biso EZALI SOUS OCCUPATION RWANDAISE, mpe to confronter ba rwandais oyo bazali na mikili bazali ko mibimisa ba congolais… Oyo ezali plus dangereux mpo ata ba nazis allemands balukaka te bakoma ba francais… Oyo ezali ETAPE ya LIBOSO ya ko recuperer IDENTITE na biso liboso tobanda ko liberer mboka… Mokili mobimba bipayi nionso bayeba biso ba vrais congolais. Tobanda na kosala campagne ete ekwekese ya “Joseph Kabila” azali congolais te, kasi azali rwandais…

MONDUKI YA KOSALELA ezali ba preuves nionso totie na mokanda oyo tobimisi na ba ndinga mibale, na francais mpe na anglais: MOKO NA MOKO NA BISO, pesa mokanda oyo na ba oyo yo oyebi na gouvernements nionso mpe ba institutions nionso, mpe bapanzi sango ya mikili oyo tozali mpo ete balobela VERITE oyo. RESULTAT : mokili mobimba bakolobela lisusu TE “Joseph Kabila” president ya RDC kasi motuna ekokoma ndenge nini ozali mopaya mpe kombo ya lokuta otingama na mboka oyo ezali ya yo te. Oyo ekomema na kolobela occupation ya mboka na biso mpe genocide mpe ndenge ya kosukisa occupation mpe genocide oyo. Masolo ya “elections” to ya ba “accords” to mpe ya ba “transition” avec ou sans ekolobama lisusu te. Mikili oyo bakondimela biso nde bakomi ba ALLIÉS na biso mpo tokundola misisa nionso ba rwandais batie na mboka na biso na ba DOMAINES NIONSO… Wana nde LIBERATION esalemi…

Leave a comment