LILOBA YA SOOLO #3  (LYS#3) : AUTO-DIAGNOSE : FOTI NA BISO MOKO BA CONGOLAIS  MPE NINI TOSALA MPO TO RECUPERER MBOKA !

INDEPENDANCE-K-L-B-

CHOIX : Foti na biso moko bana ya Congo, kobanda Dipanda nde tozali ko trahir, mpe kosala na bapaya, ata kutu oyo bazali koboma biso… (Kasavubu, Lumumba, na Baudouin, le 29/6/1960… Photo cr.: CVCE)

Bandeko bana ya Mama Congo,

Esengeli tokolisa kokanisa na biso, esengeli tomitala na kitala-tala mpo tomituna motuna oyo, na mokolo mwa lelo na sima ya ba mbula ebele oyo kobanda le 30 juin 1960 :

RESPONSABILITE NA BISO BANKOLO CONGO EZALI NINI NA MABE, BAPASI, LIWA, MPE KI BOWUMBU OYO TOKOMI LELO NA MABOKO YA BA RWANDAIS MPE NA HOLOCAUSTE YA KOLEKA 12 MILLIONS YA BA CONGOLAIS BABOMI ???

NDE TOPESI EYANO AWA MPE TOSENGI MWANA YA CONGO NIONSO AKANISA MPE AMITUNA SOKI EZALI NDENGE TOLOBI NA BO SOOLO, ELINGI KOLOBA NA VERITE OYO EVANDI NA PRINCIPE OYO BISO TOSALELAKA :

[Bo soolo (VERITE) mpe PRINCIPE na biso yango oyo mpo Congo ezala LIBERER mpe etongama mpo na bolamu ya congolais nionso : Mwana ya Congo-Zaire oyo alingi tata na ye, mama na ye, mwana na ye, famille na ye, tribu na ye, village na ye, province na ye, ndinga na ye, mokonzi na ye, lingomba na ye, mbongo, mpe ki mokonzi KOLEKA MAMA CONGO-ZAIRE azali ko MERITER Mama Congo-Zaire te, mpe TOKOKI KOLANDA YE TE, MPE TOKOKI KOSANGANA NA YE TE.]

MPO NA KOBANDA : ndenge toyebisaka Kerwin Mayizo (Bo Clicker na titre oyo elandi bolanda emission yango), biso ba congolais TOYEBI TE HISTOIRE ya soolo-soolo ya mboka na biso. Ba belges bateya biso ba congolais mpe bandeko na bango moko ba belges HISTOIRE ya lokuta ; Elingi koloba ba historiens belges mpe congolais bazwa ba licenses mpe ba doctorats na HISTOIRE YA CONGO YA LOKUTA !… YA MIBALE, to DEMONTRAKI lisusu na emission ya mibale tosalaka na ndeko Kerwin Mayizo ete MBOKA NA BISO CONGO ESI EKEYI, EKOMI NA MABOKO YA BA RWANDAIS. Congolais oyo alobi ezali boye te, ou bien azali na MAYELE TE, ou bien AYEBI MAYE MAZALI KOLEKA NA CONGO TE, ou bien asalelaka POUVOIR DOCCUPATION ya ba rwandais mpe azali kokosa ba congolais mpo babundelaka mboka te, ou bien azali kaka ZOBA oyo abengami BOLOLE (ki Bolole oyo ekipaka diplome te, ekipaka mosala osalaka te, ekipaka experience te, ekipaka age te, ekipaka expertise ozali na yango te, ekipaka ki mokonzi te : Botala kaka ba congolais nionso oyo basalaka mpe ba oyo bazali ba accompagnateurs ya pouvoir ya occupation na Congo mpe na Diaspora !)

2. RESPONSABILITE NA BISO KOBANDA INDEPENDANCE EZALI BOYE:

[Tobanda liboso na Principe oyo elobi ete LES PAYS NONT PAS DAMIS, ILS NONT QUE DES INTERETS… Principe ya mibale, ezali ete SOKI BANGUNA BAYE KOSOLOLA NA YO MPO OTEKA MBOKA TO MPE MOKONZI NA YO, OZALI OBLIGE TE OSALA YANGO, OKOKI KOKENDE KOYEBISA NDEKO NA YO MPE BOLUKI BOYOKANA NDENGE NINI BO KO COMBATTRE MONGUNA OYO AYE MPO APANZA BINO…]

Sus base ya ba principes oyo mibale :

A. Na sima ya kozwa independance na 1960, Mobutu asalaka CHOIX : mindele batiyaka Mobutu singa na kingo te mpo a trahir Patrice Lumumba na Joseph Kasavubu mpo asala bango coup mpe a delivrer Lumumba epai ya ba Tshombe mpo bakende koboma ye…. Donc, RESPONSABILITE EZALI YA BISO BA CONGOLAIS!

B. Tango Mobutu akomaki kosala na ba americains na tango ya Guerre Froide, ezalaki na eloko oyo Congo-Zaire azangaki te… Zaire ezalaki na meme niveau ya developement na Coree du Sud… Ngai oyo nazali kokoma awa nasalaki na Citi Bank ya ba americains na Kinshasa na ba 1974 -1976, donc nayebi oyo nazali koloba. Congolais-Zairois oyo azalaki mokolo na tango wana ayebi biloko nini Zaire azalaki na yango mpe niveau ya vie… Motuna : Nionso tozalaka na yango gouvernement ya Mobutu basalaki nini na yango ? Biloko nionso tozalaka na yango tobungisaki yango ndenge nini ? Avant ba rwandais ba envahir na 1996, oyo nionso tozalaka na yango na ba domaines nionso tobungisaki yango ndenge nini ? Ezalaki mindele te bato bayaki kobebisa mboka mpe koteka yango mpe kotika nionso ekufa… Ezalaki CHOIX ya biso moko bana mboka… Donc, RESPONSABILITE EZALI YA BISO BA CONGOLAIS ! FOTI NA BISO MOKO !

Entre Libye ya Khadafi na Zaire ya Mobutu, mboka nini elekaki ba richesses? Ba richesses ya Zaire Mobutu asalaki nini na yango? Tango ba rwandais na ba americains bayaki kobengana ye, niveau ya vie na Zaire ezalaki na niveau nini?

C. Avant invasion ya ba rwandais ya 1996, ba congolais mingi bayebi te histoire oyo : na tango ya CNS (Conference Nationale Souveraine), oyo ezalaki supporter na ba americains mpe ba decidaki Mobutu esengeli akende. Na CNS ba Zairois ba benganaki bapaya rwandais oyo balingaki bamikotisa kuna, mpe ba Zairois basalaka UNION SACREE oyo esangisaki mangomba mpe esprit PATRIOTIQUE mpe NATIONAL. Ba mindele bato bayaki kopanza CNS mpe UNION SACREE ?

Ba 13 Fondateurs ya UDPS, tango ya CNS, il fallait basala CHOIX bapona nani akokamba gouvernement mpo na mboka ekota na Democratie.

Mpo na nini ba Fondateurs baponaka Etienne Tshisekedi mpo a former gouvernement ya transition ata ko Etienne Thsisekedi TE moto azwaki IDEE ya ko fonder UDPS, mpe YE TE moto azalaki meme na bokomi ya lettre oyo ba 13 Fondateurs bakomelaka Mobutu, mpe YE TE moto azalaki VOTER President ya UDPS? Etienne Tshisekedi a FONDAKA eloko moko te, mpe azalaka VOTER president ya eloko moko te. TINA BANINGA BAPONAKA YE AZALA Premier Ministre ezali oyo : Lokola bayebaka ete Tshitshi azalaka AMI ya Mobutu kobanda na ba 1965, yango baninga bakanisaka que Tshitshi azalaka SINCERE na etumba mpo mboka ekota na DEMOCRATIE, yango wana balobaki na Tshitshi akoma 1er ministre mpo ayebaki Mobutu, donc, akoyeba kotelemela Mobutu… Nzoka nde ETIENNE TSHISEKEDI na moyi azalaki kotelemela Mobutu, kasi na butu azali koyokana mpe koliya esika moko na ami na ye Mobutu : TRAHISON nde yango wana ! Etienne Tshisekedi azali mondele ou congolais? Donc, RESPONSABILITE EZALI YA BISO BA CONGOLAIS !

Non seulement Tshitshi asalaki TRAHISON na confiance baninga ba Fondateurs mpe peuple congolais bapesaka ye, yango wana gouvernement na ye ekendeke NUL PART, kasi ye mpe moto APANZAKI UDPS mpo na lokoso ya POUVOIR, mpe motema LIKUNYA mpo ye TE ba Fondateurs baponaka ye President ya UDPS… Yango abengisaka REUNION na ndako na ye ya Limete mpo ete asala “COUP” abotola ki presidence ya UDPS epai ya moto oyo azalaka VOTER na baninga nionso mpo akamba UDPS mpe UNION SACREE : KIBASA MALIBA ! Foti ya biso moko bankolo mboka !

D. Kobanda bopanzi ya UDPS mpe ko fuarer ya gouvernement ya transition mpe invasion ya ba rwandais na ba ougandais oyo ezalaki supporter na ba americains, nionso wana ezalaki mpo BISO MOKO BA CONGOLAIS, KOBANDA MOBUTU SESE SEKO MPE TSHISEKEDI WA MULUMBA, TOBOMI NIONSO TOZALAKA NA YANGO, TOPANZI LISANGA MPO NA LOKOSO YA POUVOIR, MPE TANGO BAPAYA BA ENVAHIR MBOKA, TO TRAHIR MBOKA, TO SANGANI NA BAPAYA, BA RWANDAIS, MPE TOTIKI BANGO BAKOTA MPE BAKAMBA MBOKA YA CONGO. Yango na bozoba mpe na lokuta tokoma koloba lokola ete biso moko bankolo mboka tozalaki NA CHOIX TE ; TRAHISON BISO MOKO tosala tokoma kotiya yango NA COMPTE YA “BA DECIDEURS”, ya Mindele !… Ba rwandais bazali mindele te, Kigali ezali Bruxelles to mpe Washington te !

CONGOLAIS NIONSO OYO AZALI KOSALA NA GOUVERNEMENT YA BA RWANDAIS OYO EZALI KOKAMBAMA NA HYPPOLITE KANAMBE (MOYIBI YA KOMBO MPE MOBOMI)  AZALI TRAITRE DIRECTE ; CONGOLAIS NIONSO OYO AZALI “OPPOSANT” YA GOUVERNEMENT YA OCCUPATION NA CONGO AZALI TRAITRE INDIRECTE ! CONGOLAIS NIONSO NA DIASPORA OYO AZALI KO SUPPORTER OU GOUVERNEMENT D´OCCUPATION OU BA PARTIS POLITIQUES YA OPPOSITION NA CONGO AZALI ACCOMPAGNATEUR NA TRAHISON YA MBOKA !

VERITE HISTORIQUE YANGO OYO : MBOKA SOKI EZALI OCCUPE EZALAKA JAMAIS LIBERE NA ELECTIONS, NA BA ACCORDS, TO MPE NA BA MARCHES, TO MPE NA SOULEVEMENT POPULAIRE ! BA CONGOLAIS TO COMPRENDRE : TO KO RE-INVENTER LA ROUE TE !!! NANI AYEBI TE NDENGE NINI FRANCE OCCUPEE EZALAKA LIBERER ?

SOLUTION MPO TO RECUPERER MBOKA EZALI MOKO : KOLUKA BA ALLIES, MIKILI OYO BAKOLINGA KOKENDE NA BISO BANKOLO MBOKA KOBUNDA MPO TOBENGANA BA RWANDAIS… (Mindele bazali koliya mpe koyiba na sima ya ba rwandais oyo bazali koboma mpe koniokolo, mpe ko controler ba politichiens NIONSO na Congo — LOKUTA ete Communaute Internationale to ba decideurs bazali kotiya pression na ba congolais !… Ndenge kaka TRAHISON ebanda kobanda independance, tozali na CHOIX ya koboya TRAHISON, koboya PRESSION, mpe koboya COLLABORATION na banguna ndenge Charles de Gaule na baninga na ye baboyaka)….

NANI ATIE TEMBE ? NANI AZANGI KO COMPRENDRE ?

Wa bino, Prof. Yaa-Lengi

 

 

Leave a comment