LILOBA YA SOOLO #1 (LYS-1) : CONGO EKOMA YA BA RWANDAIS – CONGOLAIS AKOMI MOHUMBU

Joseph-Kabila-Paul-Kagame

Paul Kagame nde mokonzi ya Hyppolite Kanambe, ye nde moto apesaka ye ba ordres… Oyo nionso Kagame azali koloba ezali Ubwenge, lokuta, Congolais to Zambien-juif nionso akei kosolola na Kagame bazali nde kosalela ye mpe Kanambe akokende te…

 

{LILOBA YA SOOLO EZALI NINI ?

1. Ezali nkoma oyo tolingi to banda kobimisa kobanda lelo kina mboka na biso ya Congo-Zaire ekozala liberer na maboko ya ba rwandais mpe ba ougandais (ba rwandais tutsi oyo babotola Ouganda na maboko ya ba nkolo mboka)…

2. Ezali nkoma oyo ekobanga moto te, ekoyoka soni ya moto te, ekopesa moto respect te oyo azali kosala, to kosalela, to ko supporter baye bazali kokonza mboka ya Congo-Zaire…

3. Ezali nkoma oyo ekoloba VERITE (bo Soolo) tango nionso: mpe FONDATION na yango ezali oyo (Matt. 10:37) : Oyo alingi tata na ye to mama na ye to bana na ye, to tribu na ye, to province na ye, to mboka na ye, to ndinga na ye, to “mokonzi” na ye koleka mama Congo-Zaire azali ko meriter Mama Congo-Zaire te !!!}

Bandeko bana ya Congo: Tomikosa te. Bakosa pe biso te. Mpe, ba oyo balobaka mpe bazali kobimisa tolo na komikumisa ete bakokimisa ba occupants, bakokimisa Hyppolite Kanambe na ba rwandais

>soki basali ba elections,

>soki basaleli ba accords ya St. Sylvestre oyo bayokanaka bobele na ba rwandais oyo epesaki Kanambe na ba rwandais glissement na 2016 mpe na 2017,

>soki basali ba marches,

>soki bafingi mpe babengi bango bakombo ya mabe,

>soki babimisi mpe ba bomisi ba Congolais mingi lisusu na ba mobilisations oyo ezangi objectif mpe ezangi systeme ya ko proteger ba congolais (comme si ba 12 millions ya ba congolais oyo ba rwandais baboma kobanda 1996 ebangisa ou bien ekimisa ba rwandais te kasi soki babomi lisusu ba Congolais mingi nde bakokima),

NIONSO oyo ekokimisa ba rwandais te soki ba mbula nionso oyo eleki ekimisa ba rwandais te. Oyo nde REALITE oyo esengeli totala na miso LELO oyo na sima ya 22 ans…

EZALI MAWA mpo na biso ba congolais NIONSO… Ezali na tribu moko te na Congo ezangi ba traitres oyo bazali kosala na ba RWANDAIS… Mawa mpe soni… ezali lokola ete congolais tozangi jugement, tozangi logique elementaire, tozangi reflection proportionelle, tozangi BOLINGO ya mboka na biso, bolingo ya ki congolais na biso, mpe bolingo ya peuple na biso… Biso ba congolais nde tovandisi ba rwandais na mboka na biso, tozali kosalela bango, mpe tozali kokosa peuple na biloko oyo ekomema peuple te na LIBERATION… Botala ndenge bakoma koseka biso mokili mobimba, lokola ndenge espagnole oyo azali koseka awa (cliker awa, soki otali yango na sima okangi video nde ozongi lisusu awa mpo okoba kotanga)…

– Bomoni ndenge bazali koseka biso? Kasi ba congolais bazali kosalela ba rwandais na gouvernement ya occupation ya Kanambe bazali na soni te, mawa ya mboka to ata ya tribu na bango moko ezali te, mpe bayebi ete lobi lobi ba rwandais bakoboma bango ndenge baboma Katumba Mwanke mpe Samba Kaputo…

– Bomoni ndenge bazali koseka biso? Kasi ba congolais bazali na opposition na Congo bazali na soni te na kozanga koloba VERITE ete mboka ezali OCCUPE na ba rwandais, mpe ete kombo oyo ya “Joseph Kabila” ezali ya lokuta, mpe bazali koluka basala ba elections oyo ezali KOPESA LEGITIMITE NA BA RWANDAIS ndenge elekaki na 2006 mpe 2011. Mpo ba rwandais oyo bazali na mindoki mpe bazali ko organiser ba elections yango ba ko changer mibeko na ndenge na bango mpe bakoki jamais kotika ki mokonzi, ata ba pedre elections. Soni mpe soni na ba politichiens opposants na Congo oyo bayebi que mbongo ya ba rwandais bazali koliya, lobi lobi soki ba rwandais balingi, babomi bango, ndenge bautaki koboma Etienne Tshisekedi na sima tango apesaki bango passe na Decembre 2016 au lieu ya Carte Rouge…

Bandeko ba congolais, TANGO EKOKI, NGONGA EBETI mpo ete totika fanatisme ya bozoba mpe ki tribalisme ya bozoba. Tolakisa ete TOLINGI MBOKA NA BISO CONGO KOLEKA ELOKO NIONSO AWA NA MOKILI…

– Bomoni ndenge bazali koseka biso? Kasi ba congolais (mpe ba infiltres rwandais bazwa bakombo ya ba congolais) oyo bakambaka mangomba ya Nzambe nionso na Congo bakota bobele na lokuta ya ba rwandais na koyokana na ba rwandais na kosala ba ACCORDS na bango, mpe bakambi ya mangomba mango bazali ata na soni te mpe VERITE ezali na bango te tango bazali kotambola mokili mobimba kokende kosenga respect ya ba accords oyo bayokana mpe elections na bapaya oyo bango bayebi ete ekovandisa ba rwandais na mboka Congo. Tobanga ki bonzambi na bango lisusu te mpo eloba ye Meyi YESU MASIYA ete moto nionso azali kosalela lokuta azali “MWANA YA SATANA” (Jean 8:14).

MBULA BONI KOBANDA BA RWANDAIS BA OCCUPER CONGO MPE BABOMI BONI YA BA CONGOLAIS ?

Bandeko, totala VERITE na miso : Lelo oyo ekomi 22 ans kobanda ba rwandais bazali ko controler mboka na biso. 22 ANS. Biso ba Congolais tolekaki bango na mingi tango bakotaka, ata kutu na 2001 tango Hyppolite Kanambe abomaka Laurent kabila [soki ba congolais bakanisaka ete mise-en-scene oyo ba rwandais basalaka mpo na ko couvrir assassinat wana bandima yango, boyeba ete baninga ya Paul Kagame na kombo General Kayumba Nyamwasa mpe Major Docteur Theogene Rudasingwa basila kobimisa secret oyo mpe baloba pwelele ete Paul Kagame (na boyokani na ami na ye Bill Clinton) na Janvier 2001 nde moto apesaka mitindo direct na Hyppolite Kanambe mpo aboma Laurent Kabila]. Kobanda bobomi ya Laurent Kabila, ata ko biso ba Congolais na Congo toleka ba rwandais na mingi, kobanda tango wana biso ba Congolais tosala ba rwandais eloko nini na ba mbula oyo nionso eleka? Ata rwandais moko tokimisa ou bien toboma? Moko te!

IMG-20170403-WA0022

Congo-Zaire elukela Rwanda to mpe Ouganda etumba te kasi babomi 12 millions ya ba congolais, mpe ba congolais bazali ata na nsoni to mpe mawa te na kokende na Rwanda to mpe kobenga Kanambe “Joseph Kabila” to mpe kosalela ye to mpe kozala opposant ya lokuta puisque VERITE ezali na monoko ya “opposant” te !!!

 

Ba rwandais babomi koleka 12 millions ya ba congolais. Ezala mindele nde batindi bango ou bien batindi bango te, ba rwandais nde bazali kokata bana mike, bamama mpe batata na ba machetes, na ba kongo, mpe na ba poisons mpe na masasi ; ba rwandais bazali kobengana bankolo mboka mpe kobotolo mabele ya ba congolais, mpe biso tozali kosala bango ata eloko te… Ba Congolais oyo balobaka ete tozali 80 millions nde tokokimisa ba rwandais, mokolo nini tokosala yango? Bobele moto oyo azangi makanisi too mpe moto oyo azali na pongi mpe alingi kotala verite na miso te nde alobi ete tokokimisa ba rwandais… Ba rwandais mpe bazali kosala campagne wana mpo na KOLALISA BA CONGOLAIS MPONGI. Mpo banda bakota na Congo, bango kaka baboma ba millions ya ba congolais… Biso bankolo mboka ZERO… Ba rwandais nde bakoma konginda na pays mobimba teee na Kinshasa. Na yango, totika komikosa mpe kokosa peuple congolais. Mboka ezali lisusu na maboko ya ba congolais te… Mboka ekoma na maboko ya ba rwandais. OCCUPATION nde yango wana !

REALITE ezali ete na sima ya 22 ans, ba rwandais bazali ko controller Congo na biso mobimba na ba domaines NIONSO.

OCCUPATION-controle_institutions-CONGOTIMES-info

Ba domaines nionso ya Congo ezali na maboko ya ba rwandais. Oyo nde occupation.  Congolais nionso na mboka azali kosalela too ko accompagner occupation mpe kolia mbongo ba rwandais bazali kopesa bango. (phot cr.: CongoTimes.info)

 

DANGER YA MONENE OYO BA CONGOLAIS TOZALI KOLOBELA TE MPO BA RWANDAIS BALINGI TOTIKALA KIDIBA TEE KUNA EKOKOMA TROP TARD :

Eloko ya monene penza oyo biso ba congolais tozali kutu ata kolobela te ezali oyo: BA RWANDAIS BAKOMI BA CONGOLAIS MPE BISO BA CONGOLAIS TOZALI KOTIKA BANGO MPE TOZALI KONDIMA, MPE TANGO MOSUSU KUTU BISO MOKO TOYEBI TE ETE BATO OYO BAZALI BA RWANDAIS LOKOLA BAZWA BA KOMBO YA BA CONGOLAIS… Oyo nde DANGER ya monene oyo biso tozali kotala te, tozali ko confronter te, tozali kutu conscients na yango te…

Topesa example: Liwa ya Rossy Mukendi oyo bautaki koboma en direct, live, bato nionso balandi yango na ba video ndenge ezalaki kosalema: Moto oyo abetaki Rossy Mukendi Tshimanga masasi azali mwasi babengi ye Major Carine Lokeso. Kasi eloko monene oyo ezali VERITE oyo na Congo balobeli yango te (ba occupants rwandais bapekisi kotanga kombo ya Carine, mpe ba opposants nionso BAKANGI MINOKO!) mpe na DIASPORA tovandi NYEEE, verite ezali que mwana ya mwasi oyo bapesa titre ya “Major” (ndenge ba occupants bapesaka ba rwandais nionso ba grades ya minene mpo bapesaka ordres na ba congolais kasi ba congolais ba commander jamais rwandais ata moko) azali RWANDAISE TUTSIE. Kombo ya biso ba congolais ya “Carine Lokeso” ba rwandais bapesa ye ndenge bapesaka Hyppolite Kanambe kombo ya “Joseph Kabila”. Rwandaise oyo kombo na ye ya soolo kaka bango moko ba rwandais bayebi, ye nde abomi un jeune leader congolais na kati ya Kinshasa mpe Congolais akosala ye eloko te. Congolais akomi kolobela bobele ebembe oyo moto akozonga lisusu te. Rwandaise oyo abomi ye lobi akoboma lisusu… Azali koboma na nkuku tango nionso mawa te… Occupation nde yango wana!…

“Carine Lokeso” azali ba jeunes rwandais oyo bazwi ba formations na etranger na kombo ya ba congolais na 22 ans nionso oyo ba rwandais bazali ko occuper Congo, mpe bazongi bazali sika oyo ko diriger Congo mpe koboma mpe konyonga ba congolais bankolo mboka. Rwandaise akomi “congolaise”… Danger monene nde yango wana. Bazali boni oyo ba refouler bango sikoyo bazali ko kamba Congo na ba kombo ya ba congolais alors que bazali ba rwandais ??? Bazali boni oyo bazwi ba formations na libanda mpe bazonga bazali sikoyo na Congo ko profiter na bomengo ya Congo mpe koboma ba congolais mpe komibimisa ba congolais na Congo mpe libanda ???

Oyo ezali example ezali kolakisa ete RWANDAIS AKOMI CONGOLAIS NA MBOKA YA RDC mpe libanda lokola ambassadeur ya USA na Senegal, Tulinabo Mushingi, azali rwandais tutsi, biso awa na USA tosala enquete mpe FBI azali kokoba enquete… Bazoba ya ba Congolais mpe ba oyo basalelaka ba rwandais bazali koloba ete “LA PEUR E CHANGER CAMP” mpo na kolalisa ba congolais pongi, mpo moto oyo azali na mandoki mpe azali koboma yo butu mpe moyi pendant 22 ans mpe azali kofuta bino mbongo bokosaka ba congolais mpe bolalisaka bango pongi bongo ye azala na kobanga yo congolais ??? Si moto nionso ayoka oyo Kanambe aloba ete akotika Congo Jamais, lisasi na moto na ye, elingi koloba LIWA kaka nde ekolongola ye na esika avandi na konyonga mpe koboma na Congo… Bongo moto akosa congolais ete Kanambe akokende mpe bazoba oyo bazali ko accompagner ba rwandais nde bakosala “Transition” sans ba rwandais ???

NDENGE NINI TO KO LIBERER MBOKA LOKOLA OCCUPATION EVANDI NA CONGO :

Bandeko ba congolais, ezali eloko ya kobomba te, ezali eloko ya kozala lokola ba politichiens ya Congo te, ezali likambo ya kosalela EGOISME te que soki ezali likambo oyo ye apesi to a proposer te, akolobela yango te, akopartager yango na baninga te, akotala yango te, ako publier yango te. LIBERATION YA MBOKA NDE TOTIYA YANGO LIBOSO ! Mpo na mboka na biso, totika egoisme, totika culte ya PERSONALITE, totika tribalisme, totika ko negliger ba solutions baninga bazali ko proposer oyo ekoki ko CONTRIBUER mpo na ko liberer mboka na biso… Malcolm X alobaka ete mpo na ko liberer bandeko na ye, akosalela “ANY MEANS NECESSARY”, elingi koloba, “TOUS LES MOYENS NECESSAIRES”… elingi koloba, “MOYENS NIONSO OYO ESENGEMELI”… Yango wana tokoki ko negliger ata moyen moko te :

Ba sages baloba ete LILOBA eleki Lisasi to Epee na nguya, na makasi, na puissance… Toutaki komona example awa na Canada epai LILOBA ya Maman Congolaise Angelique Omenya ekangisaki Abbe Ntshole mpe ba pretres catholiques minoko na motuna kaka moko, “oui ou non” Congo ezali sous occupation ?

Eloko ba rwandais babangaka ezali VERITE… Yango biso TO ATTAQUER bango na VERITE awa na Diaspora, pamba te na Congo moko te akoki koloba VERITE mpe batika ye a vivre!!!

1. TO CONFRONTER BA RWANDAIS ESIKA NIONSO TOZALI MPO TO RECUPERER IDENTITE NA BISO NA DIASPORA MPE TO EXPOSER BA RWANDAIS OYO BAZALI KOMIBIMISA ETE BAZALI BA CONGOLAIS NA CONGO MPE ESIKA NIONSO TOZALI.

Bandeko, eloko oyo evandisi ba rwandais na Congo, mpe awa na Diaspora na ndenge ete ba pays oyo nionso tozali bazali kolobela holocauste ya Congo te ezali raison moko kaka: ba rwandais bazali komibimisa na ba mboka tozali lokola ba congolais, donc, bazali kosala campagne na kombo ya biso ba congolais mpo na kokosa MONDE MOBIMBA ete PROBLEME NA CONGO EZALI CONFLIT INTER-ETHNIQUE entre ba “majoritE” ya ba congolais na ba “minoritE” congolaise na Este ya Congo oyo bazali “D’ORIGINE RWANDAISE” lokola ba “tutsi, ba hutu, ba banyamulenge, na ba banyarwanda congolais” Donc ba “Rwandophone”… Esengeli to combattre lokuta oyo ndenge Prof Nour ya Europe apanzi mpe garde ya ba rwandais

Awa na USA to expozaka bango na 2014 mpe kobanda na 2016 bakoma kozongisa bango, kasi lokola Congo ezali na maboko ya ba rwandais, soki bazongisi bango bazali kokende wapi? Na Congo na biso. Ndakisa lokola Carine oyo autaki ko assassiner Rossy Mukendi.

En attendant Soulevent Populaire, MONDOKI YA MONENE TOKOKI KOBETA BA RWANDAIS NA DIASPORA ezali que na mboka nionso tozali na Diaspora esengeli to defier, to telemela, to confronter, to panza garde ya ba rwandais oyo bazali komibimisa lokola ba congolais, mpe tolakisa bapaya ete mboka na biso ezali sous occupation rwandaise. Ndenge nini? Tosolola na ba politiciens, tosolola na ba media, toyebisa mangomba nionso na ba mboka tozali, mpe tofunda bipai ya ba systeme ya justice mpe ya securite mpe ya immigration ya ba mboka tozali, bayeba que ba rwandais oyo bazali komibimisa lokola ba congolais kasi bazali ba congolais te…

2. TOPESI MONDOKI OYO YA KOSALELA : LISASI, TO LIBANGA YA DAVID OYO EKWEYISAKA GOLIATE

JOSEPH KABILA -LIVRE

Libanga ya David. Na yango nde mikili bisika tozali to forcer bango balobela ndenge nini mopaya ayibi kombo, azali kokosa que azalaka congolais, mpe azali koboma mpe koyiba… Kanambe na ba congolais basalelaka ye basuka na lokuta na bango…

 

Ba mama mpe ba papa ba congolais ya Diaspora. Esika nionso ozali soki olingi Congo ezala LIBERER, salela LIBANGA YA DAVID oyo tobimisi : Mokanda oyo tobimisa na ba preuves nionso na kati ezali en deux langues, francais mpe anglais, ezali na Amazon na titre JOSEPH KABILA”, USURPATEUR D’IDENTITE, IMPOSTEUR, ET CHEVAL DE TROIE RWANDAIS AU CONGO”…

Mboka nionso ozali, oyebi bakonzi to ba journalistes ya mboka ozali, to oyebi bateyi to bankolo ya ba institutions ya ndenge nionso na mboka wana, somba livre oyo tobimisi ezali kolongola “Joseph Kabila” elamba ya ki congolais mpe ezali kolatisa ye elamba mpe ba bottes na ye ki rwandais tutsi. Kamata mokanda wana pesa bankolo mboka mpe bakomi na bango mpe balobeli mpe bakambi mboka epai ozali, senga bango BALOBELA LIKAMBO OYO QUE “JOSEPH KABILA” AZALI CONGOLAIS TE, KASI AZALI RWANDAIS…

RESULTAT : Mama congolaise, papa congolais, soki lelo to reussir ete ba mboka tozali balobeli likambo ya mokanda oyo que “Joseph Kabila” azali rwandais mpe imposteur, makambo ya Congo EKOBONGWAMA na ndenge ete BAKOLOBELA LISUSU LIKAMBO YA ELECTIONS TO YA TRANSITION TO YA BA ACCORDS TE… Ekokoma likambo ya “ndenge nini yo, ‘Joseph Kabila’ omibimisaka congolais nzoka nde ozali rwandais, mpe ozali koboma mpe ko s’imposer na mboka ya Congo oyo ezali ya yo te, donc, ozali occupant mpe imposteur mpe moyibi ya IDENTITE”… Nde mokili mobimba nde bakozala OBLIGER basalisa biso bankolo mboka mpo na kosukisa occupation mpe na kokangisa Kanambe mpe kobengana ba rwandais (EZALI NA MOKILI MOKO TE OYO EKONDIMA QUE MOPAYA AYIBI KOMBO MPE AKEYI NA MBOKA OYO EZALI YA YE TE MPE AKOMA MOKONZI KUNA MPE AZALI KOBOMA BANKOLO MOLA !) : Esika Soulevement Populaire ekoka kosalema na support ya mikili misusu !

NA NDENGE MAMA ANGELIQUE OMENYA ASUKISAKI LOKUTA YA ABBE NTSHOLE MPE BA CATHOLIQUES, BISO TOSUKISA LOKUTA YA BA COLLABOS MPE BA ACCOMPAGNATEURS CONGOLAIS BABENGAKA HYPPOLITE KANAMBE “JOSEPH KABILA” NA CONGO MPE LIBANDA… VERITE OYO NDE EKOMA DEBAT… VERITE OYO NDE EKOKAMBA BISO NA LIBERATION !!!

(Mituna to mpe makanisi, bokomela biso na congocoalition@hotmail.com)

Leave a comment